1 Mpo na yango, motema na ngai ezali kolenga mpe ezali kobeta makasi lokola nde elingi kobima na esika na yango.
Soki kaka nakanisi yango, nabangi, mpe nzoto na ngai ekomi kolenga na somo.
Makelele ya bakake epesaka sango ya koya na Ye, ata kutu bibwele esosolaka koya na Ye.
Yoka ! Yoka makelele ya mongongo na Ye, makelele oyo ezali kobima na monoko na Ye.
Yawe ayanolaki Yobo kati na mopepe makasi :
kobanga mpe somo ekangaki ngai mpe eningisaki mikuwa na ngai nyonso ;
Nalengaka na somo liboso na Yo mpe nabangaka mikano na Yo.
Nani akokani na Yawe kuna na likolo ? Nani akokani na Yawe kati na mampinga ya likolo ?
Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba ; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki.
Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.
Tango nayokaki sango oyo, motema na ngai ekomaki kobeta makasi, bibebu na ngai ekomaki kolenga, mikuwa na ngai ekomaki kopola mpe makolo na ngai ekomaki kolenga. Kasi nakokanga motema na ngai mpo na kozela mokolo ya pasi oyo ekokomela ekolo oyo ebundisaki biso.
Mbala moko, mabele eninganaki makasi, mpe miboko ya boloko eninganaki. Kaka na tango yango, miboko ya boloko ebukanaki, bikuke nyonso ya boloko efungwamaki, mpe minyololo ya bakangami nyonso ekatanaki.
Mokengeli boloko asengaki mwinda, akotaki mbangu kati na boloko, mpe amibwakaki liboso ya Polo mpe Silasi na kolenga makasi.
Mpo na Dani, alobaki : « Dani azali mwana ya nkosi oyo epumbwaka wuta na Bashani. »