Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 33:9 - Mokanda na Bomoi

9 ‹ Nazali sembo, nasali masumu te ; nazali peto, namemi na ngai ngambo te. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 33:9
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki nasalaki masumu, olingaki komona ngai, mpe olingaki te kozanga kopesa ngai etumbu mpo na masumu na ngai.


atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?


Ozali koloba na Nzambe : ‹ Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo ; nazali sembo na miso na Yo. ›


Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, nayebi ete nakolonga na kosambisama.


Mabe mpe masumu boni nasali liboso na Yo ? Talisa ngai mbeba mpe masumu na ngai.


Mabe na ngai ekokangama kati na saki, mpe okozipa masumu na ngai.


Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.


Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango, mpe moto oyo ayebi na ye likambo te atelemeli moto mabe.


Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.


Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ; soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.


Nazalaki kolata bosembo lokola elamba ; bosembo ezalaki elamba na ngai mpe kitendi na ngai ya kokanga na moto.


Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko.


Kasi olobaki na matoyi na ngai— mpe nazali nanu koyoka makelele ya maloba na yo—


Tala makambo oyo Yobo azali koloba : ‹ Nasali mabe te, kasi Nzambe aboyi kolongisa ngai.


Atako nazali sembo, bazali kozwa ngai lokola mokosi ; atako nasali mabe te, likonga na Ye ezokisi ngai pota oyo esilaka te. ›


« Boni, okanisi ete yango ezali sembo ? Olobi : ‹ Nazali sembo liboso ya Nzambe. ›


Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »


pamba te afini ngai na nzela ya mopepe makasi mpe akomisi bapota na ngai ebele na pamba,


Atako nazali sembo, motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko, nayini bomoi na ngai.


Tango mopepe ya bokono ememaka kufa na mbalakata, Nzambe asekaka komekama ya bato ya sembo.


nazali kaka kobanga pasi na ngai nyonso, pamba te nayebi ete okozwa na Yo ngai te lokola moto ya sembo.


Kati na makambo oyo nyonso, ozali koloba : ‹ Nayebi ata likambo moko te, kanda ya Nzambe ekokweyela ngai te. › Kasi Ngai nakopesa yo etumbu mpo ete ozali koloba : ‹ Nasali masumu te. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ