4 Molimo ya Nzambe asalaki ngai, pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi.
Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo, ezali pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde epesaka moto boyebi.
Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi.
wana ngai nazali nanu na bomoi, mpe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai,
Yango wana ekomama : « Moto ya liboso, Adamu, akomaki ekelamu na bomoi, azalaki na bomoi ya bomoto ; » kasi Adamu ya suka akomaki Molimo oyo apesaka bomoi.
Opesaki ngai bomoi mpe otalisaki ngai bolamu ; mpe na bonzambe na Yo, obatelaki molimo na ngai.
Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.
Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.
Boni, ozali kosepela konyokola ngai, kobwaka ekelamu oyo maboko na Yo esali, mpe kolongisa mabongisi ya bato mabe ?
Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso ezali kati na loboko na Ye.
tango otindaka pema Yo, ezwaka bomoi ; mpe okomisaka mokili sika.
Tala liloba oyo Nzambe, Yawe, alobi, Ye oyo akelaki likolo mpe atandaki yango lokola liputa, oyo atandaki mabele mpe biloko nyonso oyo mabele ebimisaka, oyo apesaka pema na bato na yango mpe bomoi na bato oyo batambolaka likolo na yango :