Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 32:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo, ezali pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde epesaka moto boyebi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 32:8
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon atunaki bango : — Tokoki komona moto lokola oyo, moto oyo Molimo na Nzambe avandi kati na ye ?


Faraon alobaki na Jozefi : — Lokola Nzambe ayebisi yo makambo oyo nyonso, ezali na moto moko te oyo azali na mayele mpe na bwanya lokola yo.


nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo ; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo.


Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.


Nzambe apesaki Salomo bwanya, boyebi mingi, mpe mayele ya kososola makambo mingi, ata ezali ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene.


Bwanya mpe makasi ezali epai ya Nzambe, toli mpe mayele ezali ya Ye.


Makasi mpe elonga ezali ya Ye ; moto oyo basili kokosa mpe moto oyo akosi, bango mibale bazali ya Ye.


wana ngai nazali nanu na bomoi, mpe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai,


boye, akoki kofungola matoyi ya bato mpe kobeta sete na makebisi oyo azali koloba,


Molimo ya Nzambe asalaki ngai, pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi.


Ye oyo ateyaka biso koleka banyama ya mokili mpe akomisaka biso mayele koleka bandeke ya likolo, azali wapi ? ›


Nani atia bwanya na motema ya moto to nani apesa soso mayele ?


Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.


Molimo ya moto ezali mwinda oyo Yawe apesi ye ; esosolaka bozindo nyonso ya motema ya moto.


Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye ; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Nzambe na ye ateyaka ye mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.


Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso : koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge.


Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo, alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi, apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya bato ya mayele.


Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya ; epai na mosusu, liloba ya boyebi ;


Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo,


Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ