4 Eliwu awelaki te koloba moto ya liboso epai ya Yobo, pamba te baninga wana misato ya Yobo bazalaki mikolo na ye na mibu ya mbotama.
Asilikelaki mpe baninga misato ya Yobo, pamba te balongaki te kopesa Yobo eyano oyo esengeli ; nzokande bakweyisaki Nzambe.
Kasi tango Eliwu amonaki ete bato wana misato bazali lisusu na likambo ya koloba te, asilikaki makasi.
Kopesa eyano liboso ya koyoka ezali liboma mpe bozoba.
tango ya kopasola mpe tango ya kobamba, tango ya kokanga monoko mpe tango ya koloba ;
Bokotelema liboso ya bato oyo banuni, bokolakisa botosi na bino epai ya mibange ; na nzela wana, bokokumisa Nzambe na bino. Nazali Yawe.