Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 32:21 - Mokanda na Bomoi

21 Nakopona bilongi te, nakobondela mpe moto moko te ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 32:21
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba : « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ! »


Mosali na yo, Joabi, asalaki boye mpo na kobongola mpe kokomisa makambo oyo ndenge mosusu. Kasi nkolo na ngai azali na bwanya lokola Anjelu na Nzambe, ayebi makambo nyonso oyo ezali koleka kati na mokili.


Akopamela bino solo soki amoni ete, na se ya mitema na bino, boponaka-ponaka bilongi.


Bolingi kolakisa ete bozali na ngambo na Ye ? Bolingi kobundela Nzambe ?


Nakoloba mpo ete motema na ngai ekita, nakofungola bibebu na ngai mpo ete nayanola.


pamba te, soki nayebaki kobondela bato, Mokeli na ngai alingaki kolongola ngai mbala moko.


Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi.


Aponaka bilongi ya bakambi te, mpe asalelaka bazwi bolamu te mpo na bozwi na bango koleka babola, pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye.


Kino tango nini bokokata makambo na bosembo te mpe bokokotela bato mabe ?


Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya : Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te.


Moto oyo apamelaka moninga na ye akozwa ngolu na suka koleka moto oyo alobaka maloba ya sukali.


Okosambisa na bosembo. Okokotela te, ezala mobola to mozwi. Okosambisa moninga na yo na bosembo.


« Boye, nasalaki ete botiolama mpe bosambwa liboso ya bato nyonso, pamba te bolandaki banzela na Ngai te, kasi bozalaki kopona bilongi na makambo oyo etali mibeko. »


Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu : — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te ;


Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso : azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. »


Okobebisaka bosembo te, okoponaka bilongi te, okondimaka kanyaka te, pamba te ezipaka miso ya bato ya bwanya mpe ebebisaka maloba ya bato ya sembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ