20 Nakoloba mpo ete motema na ngai ekita, nakofungola bibebu na ngai mpo ete nayanola.
Botika makelele mpe botika ngai naloba ! Oyo ekoya eya !
Nani akoki kofunda ngai ? Soki te, nakokanga monoko mpe nakokufa.
« Makanisi na ngai ezali kotinda ngai ete nayanola, nakoki kovanda nye te, pamba te motema na ngai ekomi likolo-likolo.
Bokanga nanu mitema, wana nazali koloba ; soki nasilisi koloba nde bokoba na bino koseka ngai.
Kati na ngai, nazali lokola mbeki ya vino oyo ezali kotoka, lokola mbeki ya vino ya sika oyo ekomi pene ya kopasuka.
Nakopona bilongi te, nakobondela mpe moto moko te ;
« Soki moto moko ameki koloba na yo ata liloba moko, boni, okotomboka mpo na yango te ? Kasi nani akoki penza kokanga motema mpe kozanga maloba ?