Alobaki : « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ; tika ete Kombo na Ye ekumisama ! »
Yango wana, nalobaki na yo makambo oyo wuta kala, nayebisaki yo yango liboso ete ekokisama mpo oloba te : « Nzambe na ngai ya ekeko nde asali yango, elilingi na ngai ya nzete mpe ya ebende nde apesaki mitindo ete esalema ! »
Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.
Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya.
Yawe alobaki na Jedeon : « Bato oyo ozali na bango baleki ebele mpo na ngai kokaba bato ya Madiani na maboko na bango, noki te Isalaele akozwa lolendo na koloba : ‹ Loboko na ngai moko nde ebikisi ngai. ›