1 Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko.
Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te, yebisa ngai mabe nini nasali ! ›
atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, mpe ete ezali na moto moko te oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ?
Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.
Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, nayebi ete nakolonga na kosambisama.
Lisumu na yo ezali kokamba monoko na yo, ozwi elobeli ya bakosi.
Mabe na yo ezali monene te ? Masumu na yo eleki ndelo te ?
Kuna, liboso na Ye, moto ya sembo akososolisa Ye likambo na ngai, mpe nakokangolama libela wuta na maboko ya mosambisi na ngai.
Kasi olobaki na matoyi na ngai— mpe nazali nanu koyoka makelele ya maloba na yo—
‹ Nazali sembo, nasali masumu te ; nazali peto, namemi na ngai ngambo te. ›
Olingi kotiola bosembo na ngai ? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?
Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo ! Bokanisa penza malamu, pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami.