Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 31:3 - Mokanda na Bomoi

3 Boni, pasi ezali mpo na bato mabe te ? Kobebisama ezali mpo na bato oyo basalaka masumu te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 31:3
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi : — Namoni Abisalomi amidiembiki na nzete ya terebente.


Nzala esilisaka makasi na ye, mpe pasi ya ndenge na ndenge ezalaka pembeni na ye soki akweyi.


Yango nde lifuti oyo Nzambe abongisi mpo na moto mabe, libula oyo Nzambe alaki ye. »


Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ? Mbala boni pasi ezali kokitela bango ? Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye ?


ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi, akangolamaka mpe na mokolo ya kanda.


Pamba te nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe, mpe nakokaki te kosala eloko liboso ya lokumu na Ye.


Ezala molili, ezala libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.


Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.


Solo, otielaka bango biloko ya moselu, okweyisaka bango kati na libebi.


tango minyoko ekokomela bino na pwasa lokola mvula ya kake makasi, tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki, tango mawa mpe somo ekokomela bino.


Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasi mpo na bato oyo batambolaka na boyengebene, kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe.


Ezali esengo mpo na moyengebene kosambisa makambo na sembo, kasi yango ezali pasi makasi mpo na bato oyo basalaka mabe.


Yawe akotelema ndenge atelemaki na ngomba Perasimi, akotomboka ndenge atombokaki na lubwaku ya Gabaoni mpo na kosala mosala na Ye, mosala na Ye oyo ya kokamwa, mpe kokokisa mosala na Ye, mosala ya kokamwa oyo esalema nanu te.


Kasi soki Yawe asali penza likambo moko ya sika, bongo mabele efungoli monoko na yango mpe emeli bango elongo na biloko na bango nyonso, mpe bakiti ya bomoi kati na mokili ya bakufi, wana nde bokoyeba solo ete bato oyo batiolaki Yawe. »


Bokotela na ekuke ya moke ; pamba te ekuke mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene, mpe bato ebele bakotelaka wana.


Okoloba nini soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, ayikelaki mingi mpiko mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama ?


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


Bakozwa etumbu ya libebi ya seko na seko, mosika ya bozalisami ya Nkolo mpe ya nguya ya nkembo na Ye


Ndenge kaka basakoli ya lokuta bazalaki kati na bana ya Isalaele na tango ya kala, ndenge wana mpe bateyi ya lokuta bakozala kati na bino ; bakokotisa na mayele mabe mateya ya lokuta mpe ya libebi kino ata kowangana Nkolo oyo asikolaki bango, mpe bakomibendela libebi na mbalakata.


Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni : basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko.


Na tango yango, mwasi moko abwakaki libanga oyo banikelaka ble na moto ya Abimeleki mpe epanzaki ye moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ