9 Sik’oyo, bana na bango ya mibali bakomi koseka ngai na banzembo, nakomi lisapo kati na minoko na bango.
Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai ; moto ya sembo, moto ya alima, ye nde akomi eloko ya kotiola !
Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato, lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi.
Bana oyo batata na bango bazanga mayele mpe bazanga kombo babenganaki bango libanda ya mboka.
Okomisi biso eloko ya lisuma na miso ya bato oyo bazali pembeni na biso, eloko ya litio mpe ya liseki na miso ya bato oyo bazali zingazinga na biso.
Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai, mpe nakosamaki penza ; olekaki ngai na makasi mpe olongaki ngai. Bazali kotiola ngai mikolo nyonso, bato nyonso bazali kaka koseka ngai.
Nakomaki eloko ya liseki na miso ya bato na ngai nyonso ; bazalaki tango nyonso kotiola ngai na banzembo.
Banguna na biso nyonso bafungolaki minoko mpo na kotiola biso ;
Tala mpe mona bango ! Ezala bavandi to batelemi, mosala na bango : kotiola ngai na banzembo na bango.