18 Na nguya na yango, pasi ekomi lokola kingo ya nzambala na ngai.
nakomi eloko pamba, natikali kaka poso ya nzoto mpe mikuwa, nazali kobika kaka na misuni ya minu na ngai.
Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.
Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai, poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota mpe ekomi kolumba solo.
Mabe na ngai eleki moto na ngai, ezali kilo makasi epai na ngai lokola mokumba ya kilo makasi.
Moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto akoki kopusana pembeni ya etumbelo : mokufi miso, moto oyo atambolaka tengu-tengu ; moto oyo abeba na elongi, na makolo mpe oyo maboko to makolo na ye ekokana te,