Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 3:5 - Mokanda na Bomoi

5 Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango ! Tika ete lipata ezipa yango, mpe molili ebangisa pole na yango !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 3:5
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Likolo ya kolela, elongi na ngai ekomi motane, mpe molili ezingeli miso na ngai.


Mpo na bango, molili makasi ezali nde tongo, somo ya molili ekomaka moninga na bango.


Moto asilisaka molili, alukaka kino na se, na bisika ya se penza, libanga kati na molili oyo eleki makasi,


Tika ete mokolo yango ebongwana molili ! Tika ete, wuta na likolo, Nzambe akanisa yango lisusu te ! Tika ete pole engengela yango lisusu te !


Tika ete molili makasi ekotela butu yango, ete batanga yango lisusu te kati na mikolo ya mibu to kati na mikolo ya basanza !


Ezala molili, ezala libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.


Boni, basila kolakisa yo bikuke ya kufa ? Osila komona bikuke ya elilingi ya kufa ?


Bato oyo bazalaki kovanda na bisika ya molili makasi mpe ya molili ya kufa bazalaki ya kokangama na minyoko mpe na minyololo ya bibende,


Abimisaki bango wuta na molili makasi mpe na molili ya kufa, mpe abukaki minyololo na bango.


Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.


atako mitema na biso epengwaki te mpe totamboli libanda ya nzela na Yo te.


Okomisaki bango ekolo monene, obakisaki esengo na bango. Bazali kosepela liboso na Yo ndenge basepelaka tango babukaka milona, ndenge mibali basepelaka tango bakabolaka bomengo ya bitumba.


Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, liboso ete amemela bino molili, liboso ete makolo na bino ebeta mabaku na bangomba oyo ezipami na molili. Bino bozali kozela pole, kasi Ye akobongola yango molili makasi.


Bamitunaki te : ‹ Wapi Yawe oyo abimisaki biso na Ejipito mpe amemaki biso kati na esobe ? Wapi Yawe oyo atambolisaki biso na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu, mokili ya molili mpe ya kufa, mokili oyo baleki nzela balekelaka te mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te ? ›


Yango wana, mokili ekozala na matanga ; mpe kuna na lola, likolo ekokoma mwindo pamba te nalobaki yango, mpe nakobongola maloba na Ngai te ; lokola nazwaki mokano, nakozonga lisusu sima te. »


Pamba te mokolo yango ekomi pene ; mokolo ya Yawe ekomi pene, mokolo ya mapata, tango ya molili mpo na bikolo.


Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi.


Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo. Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba, ndenge wana mpe mampinga moko ya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya. Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kala mpe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya.


boluka Ye oyo akela lisanga ya minzoto, oyo abongolaka molili pole mpe akomisaka moyi butu, oyo abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mokili ; Kombo na Ye ezali : Yawe.


Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.


bato oyo bazalaki kovanda kati na molili bamoni pole makasi ; ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, pole ebimeli bango. »


mpo na kopesa pole na bato nyonso oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso kati na nzela ya kimia. »


Yango wana, bino bopusanaki mpe botelemaki na ebandeli ya ngomba tango ezalaki kopela moto oyo ekomaki kino na likolo elongo na mapata ya mwindo mpe molili makasi.


Bino, bopusani te, lokola bana ya Isalaele, pene ya ngomba oyo bakokaki kosimba mpe ezali kopela moto, pene ya lipata, pene ya molili makasi, pene ya mopepe makasi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ