Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tika ete mokolo yango ebongwana molili ! Tika ete, wuta na likolo, Nzambe akanisa yango lisusu te ! Tika ete pole engengela yango lisusu te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 3:4
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Tika ete mokolo ya mbotama na ngai, mpe butu oyo elobaki : ‹ Mwana mobali moko abotami, › ekufa !


Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango ! Tika ete lipata ezipa yango, mpe molili ebangisa pole na yango !


Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo. Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba, ndenge wana mpe mampinga moko ya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya. Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kala mpe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya.


Mawa na bino oyo bozali na posa ya mokolo ya Yawe ! Bozali kozela nini na mokolo ya Yawe ? Ekozala mokolo ya molili, kasi ya pole te.


Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.


Lokola tosalaki mikolo ebele na kozanga komona lisusu moyi mpe minzoto te, mpe mopepe ezalaki kaka kobeta makasi, tobungisaki elikya ya kobika.


Ezali mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, abatelaka ; miso ya Yawe, Nzambe na yo, ezalaka tango nyonso likolo na yango wuta na ebandeli kino na suka ya mobu.


Anjelu ya mitano asopaki kopo na ye na likolo ya kiti ya bokonzi ya nyama, mpe molili ezipaki bokonzi ya nyama yango. Bato bakomaki komiswa lolemo mpo na pasi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ