22 balingaki kotonda na esengo mpe kosepela soki bamoni kunda !
Kasi miso ya bato mabe ekokufa, mpe bakozanga ekimelo, bakotikala na elikya se moko : kufa. »
Mabele ya lubwaku ezalaka malamu mpo na ye ; bato nyonso batambolaka sima na ye na molongo, mpe bato ebele penza batambolaka liboso na ye.
Bazelaka kufa, kasi eyaka te ; nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama,
Mpo na nini bomoi epesamela moto oyo nzela na ye ebombama, moto oyo Nzambe azingela lokola lopango ?
Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengo kati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo, pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu.
Ah ! Nani akoki kosala ete bosenga na ngai ekokisama, mpe ete Nzambe akokisela ngai likambo oyo nazali kozela !
Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa, pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo.
Yango wana, namonaki ete bato oyo basila kokufa kala bazali na bango kutu malamu koleka bato oyo bazali nanu na bomoi.
Mpe moto oyo atikala nanu kozala te azali malamu koleka bango mibale, pamba te atikala nanu komona te misala mabe oyo esalemaka na se ya moyi.
Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›