Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 3:21 - Mokanda na Bomoi

21 Bazelaka kufa, kasi eyaka te ; nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 3:21
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.


Kasi miso ya bato mabe ekokufa, mpe bakozanga ekimelo, bakotikala na elikya se moko : kufa. »


balingaki kotonda na esengo mpe kosepela soki bamoni kunda !


Ah ! Nani akoki kosala ete bosenga na ngai ekokisama, mpe ete Nzambe akokisela ngai likambo oyo nazali kozela !


Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai, asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto !


Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa, pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo.


soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama,


Yango wana, namonaki ete bato oyo basila kokufa kala bazali na bango kutu malamu koleka bato oyo bazali nanu na bomoi.


Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. ›


Sik’oyo, oh Yawe, kamata na Yo bomoi na ngai ; pamba te eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !


Tango moyi ebimaki makasi, Nzambe atindaki mopepe ya este oyo epesaki molunge makasi. Moyi ebetaki moto ya Yona makasi. Yona alembaki nzoto, asengaki kokufa ; alobaki : — Eleki malamu ete nakufa na ngai, kasi nazala na bomoi te !


Soki ezali kaka boye nde ozali kosala ngai, eleki malamu ete oboma ngai kaka sik’oyo. Soki nazwi ngolu na miso na Yo, kotika te ete namona kobebisama na ngai.


Na basanza wana mitano, bato bakoluka kufa, kasi bakozwa yango te ; bakolinga kokufa, kasi kufa ekokima bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ