16 Mpo na nini babombaki ngai te na se ya mabele lokola zemi oyo esopani to lokola mwana oyo atikala komona te pole ya mokolo ?
Soki kutu nazalaka na ngai te, nalingaki koleka kaka mbala moko longwa na libumu ya mama kino na kunda.
elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo mpe batondisa palata kati na bandako na bango.
Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato, bato oyo balembi bazwaka bopemi,
Tika ete balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola ; Tika ete bambanzi na bango ebukana tango babetaka batolotolo.
Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe, lokola mwana oyo akomona moyi te mpo ete abimi na zemi oyo esopani.
Mpe moto oyo atikala nanu kozala te azali malamu koleka bango mibale, pamba te atikala nanu komona te misala mabe oyo esalemaka na se ya moyi.
Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ;
Sima na bango nyonso, amonanaki mpe epai na ngai, lokola epai ya mwana matsombe,