Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 3:13 - Mokanda na Bomoi

13 Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia, nalingaki na ngai kokufa mpe kopema

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 3:13
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

liboso ete nakende na esika oyo bato bazongaka lisusu te, na mokili ya molili, mokili ya kufa,


na mokili ya molili makasi, ya kufa mpe ya mobulu, epai wapi ata pole ezalaka molili. »


Olongaka ye mbala moko, mpe akendaka na ye ; obebisaka elongi na ye mpe obenganaka ye.


Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila, mpe nakokende na ngai na nzela oyo bato bazongaka lisusu te.


Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, ezali nde kunda ; soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, ezali nde kati na mboka ya bakufi.


Ngai, nayebi na ngai malamu ete Mosikoli na ngai azali na bomoi, mpe, awa na mokili, akotelema ya suka mpo na kokata likambo na ngai.


Solo, nakomona Ye, miso na ngai moko ekomona Ye, ngai moko penza, moto mosusu te.


bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo, mpe bazali kokende na mboka ya bakufi na kimia.


Moko azali kokufa na makasi na ye nyonso, na kimia nyonso mpe na pasi ata moko te,


Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko na se ya mabele, mpe bankusu ekozipa bango.


Ndenge kokawuka mpe moyi makasi emelaka mayi ya mvula pembe, ndenge wana mpe mboka ya bakufi emelaka bato oyo basalaka masumu.


Libumu ya mama ebosanaka bango mpe bankusu esepelaka kolia bango. Bakanisaka bango lisusu te, pamba te mabe na bango esili kobukana lokola nzete.


Bakufi balengaka na se ya mayi mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna.


Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu, mpe libulu ya molili ezali polele.


Mpo na nini mabolongo eyambaki ngai ? Mpo na nini mama amelisaki ngai mabele ?


Ezala molili, ezala libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.


Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »


Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.


Boni, balali te esika moko na basoda mosusu oyo bakatama ngenga te to balali te esika moko na basoda ya mpiko oyo bakufaki mpe bakitaki na mboka ya bakufi na bibundeli na bango, na mipanga na bango na se ya mito na bango ? Etumbu mpo na masumu na bango ekweyaki na mikuwa na bango, atako bazalaki kolengisa basoda ya mpiko ya mokili ya bato ya bomoi na somo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ