Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku oyo etondi na molili ya kufa, nakobanga mabe ata moko te, pamba te ozali elongo na ngai, nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai, mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.
Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.
Akozala Mosambisi kati na bikolo, akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu ; bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.
Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.