3 Moto asilisaka molili, alukaka kino na se, na bisika ya se penza, libanga kati na molili oyo eleki makasi,
abimisaka na pwasa, makambo ya sekele, makambo oyo ezali kati na molili, mpe abimisaka na pole bililingi oyo eleki mwindo ;
Ebende ewutaka na mabele, mpe libanga oyo balekisaka na moto epesaka motako.
atimolaka libulu mosika ya esika oyo bato bavandaka, na bisika oyo makolo ya bato ekomaka te, mosika penza na bato, adiembelaka mosika ya bato nyonso.
Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango ! Tika ete lipata ezipa yango, mpe molili ebangisa pole na yango !
soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama,
Namipesaki mpo na koyekola mpe kososola na nzela ya bwanya, makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi. Nzokande, ezali na yango kaka mosala ya mpunda oyo Nzambe apesa na bana ya bato mpo ete bamonela yango pasi !
Boni, ekatama te epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, ete misala ya bato ezala kaka lokola koni oyo ezali kopela moto, ete bikolo enyokwamaka bobele se pamba ?
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole.