Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 27:6 - Mokanda na Bomoi

6 nakobatela bosembo na ngai, nakotika yango te ; motema na ngai ekotikala kosambisa ngai mokolo moko te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 27:6
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, nayebi ete nakolonga na kosambisama.


Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.


Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kotingama na bosembo na ye, atako otindikaki Ngai na pamba ete nasala ye mabe.


Tika ete bayini na ngai bazala lokola bato mabe, mpe banguna na ngai, lokola bato bazangi bosembo !


Nazalaki kolata bosembo lokola elamba ; bosembo ezalaki elamba na ngai mpe kitendi na ngai ya kokanga na moto.


tika ete Nzambe ameka ngai na emekelo ya sembo, mpe akomona ete ngai nasali mabe te.


Soki matambe na ngai ebimaki na nzela na Ye, soki motema na ngai etambolisamaki kolanda miso na ngai, soki maboko na ngai ekomaki mbindo,


Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko.


Kasi Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi mpe ya etuka ya Rami, asilikelaki Yobo makasi, pamba te amimonaki sembo koleka Nzambe.


Olingi kotiola bosembo na ngai ? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?


Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo ! Bokanisa penza malamu, pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami.


Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo, kobwaka yango te, batela yango malamu mpo ete ezali bomoi na yo.


Yango wana, ngai mpe nasalaka tango nyonso makasi mpo na kobatela motema na ngai peto, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato.


Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ