Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kotingama na bosembo na ye, atako otindikaki Ngai na pamba ete nasala ye mabe.
Sima na Yawe koloba makambo oyo epai ya Yobo, alobaki na Elifazi, moto ya Temani : « Kanda na Ngai engaleli yo mpe baninga na yo mibale, pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki.
Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.