4 bibebu na ngai ekoloba mabe te, mpe lolemo na ngai ekobimisa lokuta te.
Boni, bozali kokotela Nzambe na nzela ya lokuta mpe ya maloba ya solo te ?
Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.
Soki ezali bongo te, nani akoki kolakisa ngai ete nazali koloba lokuta ? Nani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba ? »
Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi.
Atako nazali sembo, bazali kozwa ngai lokola mokosi ; atako nasali mabe te, likonga na Ye ezokisi ngai pota oyo esilaka te. ›
Kasi sik’oyo, bozala na mitema malamu mpo na kotala ngai ! Boni, nakoki penza kokosa bino, kaka na miso makasi boye ?
Solo, bino, boyebi Ye te ; kasi Ngai, nayebi Ye. Soki nameki koloba ete nayebi Ye te, wana nakozala mokosi lokola bino. Kasi nayebi Ye mpe nabatelaka Liloba na Ye.
Lokola solo ya Klisto ezali kati na ngai, moto moko te kati na etuka ya Akayi akobotola ngai lokumu yango.