Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 27:23 - Mokanda na Bomoi

23 Bakobetela libebi na ye maboko, mpe bakotiola ye na piololo wuta na ndako na ye moko. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 27:23
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo ? ›


Babenganaka ye na pole mpo ete akende na molili, mpe balongolaka ye na mokili.


Abungaka lokola ndoto, mpe bakomona ye lisusu te, alimwaka lokola na ndoto ya butu.


Ezali na esika oyo batimolaka palata, mpe na esika oyo bapetolaka wolo.


Pamba te, na lisumu na ye, azali kobakisa kotomboka, azali kotia tembe kati na biso mpe azali kokoba kobakisa maloba mpo na kotelemela Nzambe. »


Akozonga lisusu te na ndako na ye, mpe ndako na ye ekoyeba ye lisusu te.


Tango bato ya sembo bapambolamaka, engumba esepelaka ; mpe tango moto mabe akufaka, bato bagangaka na esengo.


Nakobebisa engumba oyo mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola. Bato nyonso oyo bakolekela awa bakokamwa mpe bakoyoka somo wana bakomona kobeba na yango nyonso.


Bato nyonso oyo bolekelaka na nzela na yo bazali kobeta maboko na kokamwa, bazali kobeta piololo mpe koningisa mito mpo na Yelusalemi, mboka kitoko : « Boni, ezali solo engumba oyo bazalaki kobenga kitoko ekoka mpe esengo ya mokili mobimba ? »


Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozalaki kobeta maboko mpe kotuta makolo na esengo mpo na kotiola mokili ya Isalaele,


Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.


Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo ; pota na yo ezali monene makasi ! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?


Tala ndenge ekosuka, engumba oyo ya bisengo, oyo ezalaki na kimia koleka mpe ezalaki komilobela : « Ezali nde ngai, mosusu azali te soki ngai te. » Ndenge nini engumba oyo ebebisami, ndenge nini ekomi penza ndako ya banyama ! Bato nyonso oyo bakolekela wana bakobeta piololo mpe koningisa mito.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ