Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 27:20 - Mokanda na Bomoi

20 Somo ekozwa ye lokola mayi ya mpela ; na butu, mopepe makasi ekopikola ye na mbalakata.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 27:20
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na butu wana, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe.


Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia.


Somo elandaka ye bisika nyonso oyo atambolaka.


Wana azali kotondisa libumu na ye, Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye, mpe ekonokela ye lokola bilei.


Abungaka lokola ndoto, mpe bakomona ye lisusu te, alimwaka lokola na ndoto ya butu.


Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka ?


Kufa ememaki bango na mbalakata, mpe miboko na bango etiolaki na mpela.


Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi, eteni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka, yango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino.


Bato bazali kokufa mbala moko, kati na butu ; bazali kobunda-bunda mpe kolimwa, bato ya nguya bazali kolongwa atako loboko ya moto etindiki bango te.


Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.


Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai ; yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani, wuta na songe ya ngomba Erimoni mpe wuta na ngomba Mitseari.


landa bango na nzela ya mopepe na Yo mpe bangisa bango na nzela ya mopepe makasi na Yo !


Olekisaka yango lokola pongi ya butu, oyo na tongo, esilaka lokola lititi.


Na kati-kati ya butu, Yawe abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo azalaki kokonza na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mokangami oyo azalaki kati na boloko, mpe bana mibali ya liboso ya bibwele nyonso.


Mpe kaka na butu wana, babomaki Balitazari, mokonzi ya bato ya Babiloni.


Alobaki : « Kati na mawa na ngai, nabelelaka Yawe, mpe ayanolaka ngai. Wuta kati na mboka ya bakufi, nasengaka lisungi, mpe ayokaka ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ