Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 27:19 - Mokanda na Bomoi

19 Akokufa na bozwi, kasi akosala na yango eloko moko te ; tango akofungola miso, bozwi na ye nyonso ekozala lisusu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 27:19
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.


Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te.


elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke, mpe esengo ya moto oyo azangi boyengebene ewumelaka kaka mwa tango moke.


ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi, akangolamaka mpe na mokolo ya kanda.


Mpe atako sik’oyo bazali bato minene, na tango moke bakozala lisusu te, bakokweya mpe bakokufa lokola moto nyonso, bakokatama lokola mito ya ble.


Nayebi ete ozali komema ngai na kufa, na esika oyo obongisa mpo na bato ya bomoi.


Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »


Liso oyo ezali komona ngai sik’oyo ekotikala komona ngai lisusu te ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te.


Banguna na yo bakotondisama na soni, mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. »


Tika ete balimwa lokola soyi ya mbembe, lokola mwana oyo akomona moyi te mpo ete abimi na zemi oyo esopani.


Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo, kotia mayele na yo te kati na yango.


Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.


Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !


Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ