17 nyonso oyo abongisi, moto ya sembo nde akolata yango, mpe bato oyo basali mabe te nde bakokabola palata na ye.
Kaka na mokolo yango, mokonzi Kizerisesi apesaki Ester, mwasi ya mokonzi, biloko ya Amani, monguna ya Bayuda. Mpe lokola Ester ayebisaki mokonzi ete Maridoshe azali ndeko na ye, mokonzi abengaki Maridoshe mpe Maridoshe akendeki liboso ya mokonzi.
akotikala kokoma mozwi te, pamba te bozwi na ye ekowumela te, bomengo na ye ekopanzana te kati na mokili mobimba ;
bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola, maboko na ye ekozongisa bozwi oyo abotolaki,
akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba, akomela ata moko te, akotikala kosepela te na litomba oyo azwaki na mombongo na ye.
Ata soki asangisi palata lokola putulu mpe bilamba lokola mipiku ya mabele,
elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo mpe batondisa palata kati na bandako na bango.
Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula, kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamaka mpo na moyengebene.
Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.
Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye ; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
Bino bavandi ya etuka Makiteshi, bolela, pamba te bato nyonso ya mombongo bakokufa, mpe bato nyonso oyo batekaka palata bakobebisama !