11 Nakoteya bino makambo oyo etali nguya ya Nzambe, nakobomba te nzela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe ? Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ?
Boni, akosepela penza na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to akobelela lisusu Nzambe tango nyonso ?
Bino nyonso, boyebi yango malamu ! Bongo mpo na nini bilobaloba ya boye ?
Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengo kati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo, pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu.
Nzambe, wuta bolenge na ngai, oteya ngai ; mpe kino lelo, nazali kotatola bikamwa na Yo.
Yawe alobaki na ngai, tango asimbaki ngai na loboko na Ye ya nguya mpe akebisaki ngai ete nalanda te nzela ya bato oyo :
Nzokande, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino, ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko.
Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.