Moto moko te asengeli komata elongo na yo ; na ngomba mobimba, moto moko te amonana ; bameme, bantaba to bangombe esengeli mpe te kolia na ebandeli ya ngomba.
Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !