Mokili ya bakufi, kuna na se, eningani na sango ya koya na yo, elamusi, mpo na koyamba yo, milimo ya bakufi, bato nyonso oyo bazalaki bakambi na mokili, etomboli bango, na bakiti na bango ya bokonzi, ba-oyo nyonso bazalaki bakonzi ya bikolo.
Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.
Anjelu ya libulu ya monene mpe ya molili makasi nde azalaki mokonzi na yango. Kombo na ye, na lokota ya Ebre, « Abadoni ; » mpe, na lokota ya Greki, « Apolioni. »