3 Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya, mpe tala ebele na mayele oyo olakisi !
« Solo, bozali penza bato ; tango bokokufa, bwanya mpe ekokufa elongo na bino !
Kasi atako bongo, ngai mpe nazali mayele lokola bino, boleki ngai na eloko te. Nani ayebi te makambo wana nyonso ?
Soki bovandaki ata kimia, bolingaki ata komonana bato ya bwanya.
Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu ! Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino.
« Ah ! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi, ndenge osungi loboko oyo elembi !
Ozwi maloba oyo wapi ? Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani ?
Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi.
Soki te, vanda kimia mpe yoka ngai, mpe ngai nakoteya yo bwanya. »
« Nani azali kobebisa mabongisi na ngai na maloba ezanga tina ?
Nazali na nguya ya komisunga awa natikali lisusu na makoki te ?
Nzokande, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino, ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko.
pamba te nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe mpe nabombelaki bino ata eloko moko te.