Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 26:14 - Mokanda na Bomoi

14 Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 26:14
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nani akoki kososola ndenge Nzambe apanzaka mapata mpe ndenge bakake ebimaka wuta na ndako na Ye ?


Sima na yango, konguluma na Ye ekoyokana, akoganga makasi na mongongo ya bokonzi na Ye ; akokanga mikalikali ya monoko na Ye te, wana mongongo na Ye ezali koyokana.


Na nzela ya mongongo na Ye ya makasi, Nzambe asalaka bikamwa, asalaka makambo minene, makambo minene oyo mayele na biso ekoki kososola te.


Liloba moko eyelaki ngai na nkuku, mpe matoyi na ngai eyokaki yango na se penza :


Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ? Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ?


Matoyi na ngai eyokaki makambo oyo bazalaki koloba na tina na Yo ; kasi sik’oyo, miso na ngai emoni Yo.


Solo, boyebi oyo ya kokamwa elekelaka ngai, ezali likolo makasi, nakoki kososola yango te.


Yawe azali monene, abongi na lokumu ; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.


Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.


Ndenge oyebi te nzela ya mopepe to ndenge nini moto asalemaka kati na libumu ya mama na ye, ndenge wana mpe okokoka te kososola misala ya Nzambe oyo azali Mokeli ya nyonso.


Azalaki kongenga lokola moyi, mpe pole makasi ezalaki kobimela na loboko na Ye, epai wapi nguya na Ye ebombamaka.


Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali na mozindo mingi ! Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye mpe kososola nzela na Ye !


Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. Yawe akosambisa mokili mobimba, akopesa mokonzi na yango nguya mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ