Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 25:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ; atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 25:2
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo, molobeli na ngai azali na Lola.


Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :


Pamba te, libula nini Nzambe akoki kobongisela ngai wuta na likolo ? Libonza nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kotindela ngai wuta na likolo ?


Tala, Nzambe azali Mokonzi ya nguya na Ye, nani ateyaka koleka Ye ?


Tala monene ya Nzambe ! Kasi atiolaka na Ye bato te, nguya na Ye emonanaka na nzela ya mikano na Ye ya makasi. Azali na nguya, mpe mikano na Ye ebongwanaka te.


Azali Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tokoki te kokoma esika Ye azali ; azali monene na nguya mpe na solo ; azali Mokonzi ya sembo, akoki konyokola te moto oyo azali sembo.


« Nayebi ete okoki kosala makambo nyonso ; eloko moko te ekoki kotelemela mabongisi na Yo.


Boloba na Nzambe : « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango ! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.


Solo, ozali somo ! Nani akokoka kotelema liboso na Yo soki osiliki ?


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Nakotia masanzoli na bibebu ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. « Mpe nakobikisa bango. »


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


Esengo na bato oyo bayeisaka kimia, pamba te bakobengama bana na Nzambe !


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


mpe kozongisa, na nzela ya Klisto, boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso, ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo, na kotia kimia na nzela ya makila oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.


epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela ! Amen !


Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ