Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 24:23 - Mokanda na Bomoi

23 Nzambe apesaka bango kimia, kasi miso na Ye etalaka nzela na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 24:23
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, ozali na miso ya mosuni ? Ozali komona lokola bato ?


Solo, ayebaka bakosi mpe asosolaka mabe na pete.


Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia, mpe bato oyo batombokelaka Nzambe, oyo bamonaka makasi na bango lokola Nzambe, bango nde babatelamaka.


Amoni banzela na ngai te ? Atangi matambe na ngai nyonso te ?


Miso na Ye ezali likolo ya banzela ya bato, amonaka etamboli na bango nyonso.


Misala na ye ekendeke liboso tango nyonso, asalaka keba te na mikano na Yo, Yawe ; atiolaka banguna na ye nyonso.


Natosaka malako mpe mibeko na Yo, pamba te oyebi banzela na ngai nyonso.


Miso na Yawe ezalaka bisika nyonso mpo na kotala bato mabe mpe bato ya malamu.


Solo, nzela ya moto ezali liboso ya Yawe, mpe ayekolaka malamu makambo nyonso oyo moto asalaka.


Biloko oyo mabele ebotaka ezali mpo na bolamu ya bato nyonso ; ezala mokonzi, abikaka mpe na mbuma ya bilanga.


Soki etumbu epesami noki te mpo na mabe oyo esalemi, mitema ya bato etondaka na makanisi ya kosala mabe.


Moko na moko alobaka : « Yaka ! Tika ete nakamata vino mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga ! Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo, masanga ya komela ezali nanu ebele ! »


Mpo na lolendo ya Jakobi, Yawe alapi ndayi na maloba oyo : « Nakobosana misala na bango ata moko te.


Soki bakimi na se ya mabele, na mboka ya bakufi, loboko na Ngai ekobimisa bango kuna ; soki bakimi na Lola, nakokitisa bango na se.


Miso na Yo ezali peto koleka, okoki kotala mabe te. Mpo na nini ozali kotala makambo mabe ? Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso ? Mpo na nini ovandi kimia wana bato mabe bazali konyokola bato oyo baleki bango na bosembo ?


Kasi soki mosali yango amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, » mpe akomi kobeta basali mpe basi basali ; kolia, komela masanga mpe kolangwa,


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ