22 Kasi Nzambe, na nguya na Ye, abakisaka mikolo ya banyokoli na bango ; ata batombolami, bazalaka na elikya te mpo na bomoi na bango.
amemaka Banganga-Nzambe na bowumbu mpe akweyisaka bato oyo bavanda kala na bokonzi ;
Bato ya weste bazalaka na somo ya kotala bomoi na ye, mpe bato ya este batondaka na kobanga.
Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi, mpe nguya na Ye ezali monene ; nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ?
Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe bavandi ya mokili balangwaki vino ya kindumba na ye. »