Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 24:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bato oyo bazali kosala bongo, bazali kotombokela pole, bayebi nzela na Ye te mpe batambolaka ata kati na yango te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 24:13
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo, na kati-kati ya butu, alamukaki, alongolaki mwana na ngai pembeni na ngai, wana ngai, mwasi mowumbu na yo, nazalaki ya kolala, mpe atiaki ye na tolo na ye ; mpe atiaki mwana na ye, oyo akufaki, na tolo na ngai.


Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka, mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga mpo na koluka lisungi, kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.


Mobomi azali kotelema na moyi mpe koboma mobola elongo na moto akelela ; na butu, azali lokola moyibi.


Kati na molili, bato balukaka kobuka bandako ya bato ; kasi na moyi, bamikangelaka na ndako, bazali koboya pole.


mpo ete esimba bandelo ya mokili mpe ebimisa bato mabe ?


Bazangisi bato mabe pole mpe babuki loboko oyo etombwami mpo na kosala mabe.


Molili eyelaka bango na moyi ; na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.


Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.


Yesu alobaki na bango : — Pole ezali nanu kati na bino mpo na mwa tango moke. Botambola, wana bozali na pole, mpo ete molili ekanga bino te na mbalakata ; pamba te moto oyo atambolaka kati na molili ayebaka te esika nini azali kotia lokolo.


« Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »


Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati : ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika.


Bongo Yesu alobaki na Bayuda oyo bandimaki Ye : — Soki bowumeli kati na Liloba oyo nateyaki bino, bokozala penza bayekoli na Ngai,


Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.


Bayebi malamu ekateli ya sembo ya Nzambe ete bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana basengeli na kufa, kasi bazali kaka kokoba kosala makambo wana nyonso mpe kondima bato oyo basalaka yango.


Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.


Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.


Nzambe akangaki mpe na minyololo ya seko, kati na molili mpo na kosambisama ya mokolo monene, ba-anjelu oyo basepelaki te na evandelo oyo Nzambe apesaki bango mpe batikaki yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ