Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 24:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bakamolaka bambuma ya olive kati na mapango ya bato mosusu, bakamolaka bambuma ya vino, kasi bazongaka kaka na posa ya komela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 24:11
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki bazangi bilamba, batambolaka bolumbu ; bamemaka maboke ya nzete ya ble, kasi bazongaka kaka na nzala.


Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka, mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga mpo na koluka lisungi, kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.


Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi, eteni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka, yango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino.


Esengo mpe kosepela ebungi na bilanga ya kitoko, banzembo mpe koganga ya esengo ezali lisusu te kati na bilanga ya vino ! Mokamoli vino akokamola lisusu te kati na ekamolelo, pamba te nakosukisa koganga.


« Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya bosembo te, mpe bashambre na ye ya etaje, na nzela ya lokuta ; oyo asalisaka bandeko na ye mosala ya pamba mpe afutaka bango eloko te ;


Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma.


Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ