8 atako ozalaki moto monene, nkolo mabele, mpe ozalaki kovanda na mabele yango lokola moto ya lokumu ;
amemaka Banganga-Nzambe na bowumbu mpe akweyisaka bato oyo bavanda kala na bokonzi ;
Bolingi kolakisa ete bozali na ngambo na Ye ? Bolingi kobundela Nzambe ?
pamba te nabangaki bato mpe nabangaki ete mabota etiola ngai, yango wana nakangaki monoko mpe nakokaki kobima libanda te !
Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe, Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango. Soki ezali Ye te, ezali nani ?
Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela, okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe.
bakonzi ya basoda mpe bato ya lokumu, bapesi toli, bato mayele ya misala ya maboko mpe bato oyo basalelaka maji.
Bakambi ya bato babungisi bato na bango nzela, mpe bato oyo balandaka bango bakomi kotelengana.
Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.