4 Boni, okanisi ete ezali mpo na boyengebene na yo nde azali kopamela yo mpe kosambisa yo ?
Olingi kaka kolandela ekelamu ya boye ? Olingi kaka komema ye liboso na Yo mpo na kosambisa ye ?
Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobela moto liboso ya Nzambe ndenge moto alobelaka moninga na ye ?
bolenga bino moko liboso ya mopanga, pamba te mopanga ezali esalelo ya kanda mpo na masumu, mpe bokoyeba ete kosambisama ezali. »
Ezala soki ozali moyengebene, litomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa, ata ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo ?
Nzambe azali na posa ya kolanda-landa bato te mpo ete bakoka koya liboso na Ye mpo na kosambisama.
Boni, nakomi ebale to elima ya mayi mpo ete batiela ngai bikangiseli ?
Soki ezali likambo oyo esengi makasi, Ye nde Nkolo-Na-Nguya ! Mpe soki ezali likambo ya bosembo, nani akoki kosambisa Ye ?
Azali moto lokola ngai te mpo ete nazongisela Ye eyano to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi.
Kosambisa mosali na Yo te, pamba te moto moko te ya bomoi azali sembo liboso na Yo.
Kobeta ngai lisusu te, nazali kokoka lisusu te.
Bilombe nyonso ya mpiko bakweyisamaki, balalaki pongi na bango ya suka ; basoda nyonso bakokaki lisusu te kotombola maboko.
Batela nzete oyo loboko na Yo ya mobali elonaki, batela solo mwana oyo Yo moko obokolaki.
Pamba te, Nzambe akomema misala nyonso na kosambisama, ezala oyo ebombama, ya malamu to ya mabe.
Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.