Bakopo nyonso ya mokonzi Salomo ezalaki ya wolo ya peto, mpe biloko nyonso ya ndako ya Zamba ya Libani ezalaki ya wolo ya peto. Eloko moko te ezalaki ya palata, pamba te, na tango oyo Salomo azalaki mokonzi, palata ezalaki na motuya ata te.
Kasi etumbelo ya bronze oyo Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri mpe koko ya Wuri, atongaki ezalaki liboso ya Mongombo. Ezalaki kuna nde Salomo elongo na lisanga mobimba balukaki Yawe.
Mokonzi asalaki ete palata ekoma ebele kati na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku.
Bilamba na Yo nyonso ezali kolumba solo kitoko ya malasi ya mire, ya aloe mpe ya kaneli ; wuta na bandako minene oyo ebongisama na pembe ya nzoko, mandanda ezali kosepelisa Yo.