Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 22:21 - Mokanda na Bomoi

21 Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia. Na nzela wana, bomengo ekoya lisusu epai na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 22:21
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.


Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.


Kasi tika ete bakimela epai na Ngai lokola ndako batonga makasi, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai ; solo, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai ! »


Soki moto azwi yo na likambo, yokana na ye noki, wana bozali nanu na nzela ; soki te, akofunda yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo na boloko.


Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.


Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso.


Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.


Yango wana, mpo na Klisto, tozali bantoma, lokola nde Nzambe azali kolendisa bato na nzela na biso : « Na Kombo ya Klisto, tozali kosenga na bino ete bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe.


Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ