2 « Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto ? Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba kaka mpo na ye moko.
Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde nani mpo ete tosalela ye ? Tokozwa litomba nini na kosambela ye ? ›
Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :
Ezala soki ozali moyengebene, litomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa, ata ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo ?
Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye, mpo ete olandelaka ye na bokebi,
Nalobaka na Yawe : « Ozali Nkolo na ngai, Yo moko kaka nde ozali bolamu na ngai. »
Soki ozali moto ya bwanya, bwanya na yo ezali mpo na litomba na yo moko ; kasi soki ozali motioli, yo moko kaka nde okomona pasi.
Yango wana, soki liso na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo.
Ndenge moko mpe mpo na bino : soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba : « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. »
Mpe azalaka na posa te ya masungi ya bato, pamba te akoka na nyonso. Nzokande, Ye nde apesaka bato nyonso bomoi, pema mpe biloko nyonso.
mpe ete obatela mibeko mpe bikateli ya Yawe, oyo nazali kopesa yo na mokolo ya lelo mpo na bolamu na yo moko.