Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 22:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kufa ememaki bango na mbalakata, mpe miboko na bango etiolaki na mpela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 22:16
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Noa akokisaki mibu nkama motoba ya mbotama, na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na sambo, bitima nyonso ya se mpe maninisa nyonso ya likolo efungwamaki.


ndenge mayi eliaka mabanga, ndenge mayi oyo etiolaka ememaka mabele, ndenge wana mpe obebisaka elikya ya moto.


Ekokokisama liboso ete akufa, ndenge lindalala ekawukaka mpo na kozanga mayi na yango


bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo, mpe bazali kokende na mboka ya bakufi na kimia.


Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka ?


Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi, eteni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka, yango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino.


Bakufaka na bolenge, basukisaka bomoi na bango kati na mibali oyo bamipesaka na kindumba ya bule.


mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele, ba-oyo bazali kaka putulu mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi ?


Na bomoi na ngai, abukaki lolendo ya makasi na ngai, mpe akitisaki motango ya mikolo ya bomoi na ngai.


Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo ; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.


Olekisaka yango lokola pongi ya butu, oyo na tongo, esilaka lokola lititi.


Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi, kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.


Kolekisa ndelo te ya kozala moto mabe to ya kozala zoba ; mpo na nini kokufa liboso ete mikolo ya bomoi na yo ekoka ?


Tala, Nkolo azali na elombe moko ya nguya mpe ya makasi, elombe yango azali lokola mvula ya mabanga mpe mopepe oyo ebebisaka ; azali lokola mvula ya makasi mpe mpela ya somo, akokweyisa na makasi engumba yango na mabele.


soki ayokelaki te mokili ya kala mawa kasi abikisaki bato mwambe oyo kati na bango ezalaki na Noa oyo azalaki kosakola bosembo na tango ya mpela oyo abebisaki na yango mokili elongo na bato oyo batosaki Ye te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ