Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito.
ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.
Bazongisaki : — Kanga monoko ! Tia loboko na monoko na yo, yaka elongo na biso mpe zala tata na biso mpe nganga-nzambe na biso. Boni, likambo nini eleki malamu : kozala nganga-nzambe ya moto to kozala nganga-nzambe ya libota mpe ya etuka moko ya Isalaele ?