34 Boye, mpo na nini bozali komitungisa mpo na kobondisa ngai ? Pamba te kati na biyano na bino, etikali kaka lokuta. »
Pamba te maloba na bino ekokani na putulu, mpe makanisi na bino ezali lokola mabele ya bikeko.
Pamba te bino, bozali kobongisa lokuta, bozali lokola minganga oyo bayebi mosala malamu te.
« Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo ; bino nyonso bozali babondisi mabe.
Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :
Asilikelaki mpe baninga misato ya Yobo, pamba te balongaki te kopesa Yobo eyano oyo esengeli ; nzokande bakweyisaki Nzambe.
Sima na Yawe koloba makambo oyo epai ya Yobo, alobaki na Elifazi, moto ya Temani : « Kanda na Ngai engaleli yo mpe baninga na yo mibale, pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki.