3 Bokanga nanu mitema, wana nazali koloba ; soki nasilisi koloba nde bokoba na bino koseka ngai.
Bato bavanda kaka nye likolo ya maloba na yo ya pamba oyo ozali kobimisa ? Bapamela yo te soki ozali kosala maseki ?
Botika makelele mpe botika ngai naloba ! Oyo ekoya eya !
Bokosepela soki aluki koyeba makanisi ya mitema na bino ? Bokanisi ete bokoki kokosa Ye ndenge bakosaka bato ?
Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai, bakomi kobeta ngai bambata na matama mpo na kosambwisa ngai, bango nyonso basaleli ngai likita.
Baninga na ngai bakomi koseka ngai ; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.
Solo, batioli bazingeli ngai, miso na ngai ezali komona kotiola na bango.
« Yoka na bokebi maloba na ngai, mpe tika ete yango ezala kobondisama mpo na ngai.
Bino nyonso, boyebi yango malamu ! Bongo mpo na nini bilobaloba ya boye ?