Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 21:18 - Mokanda na Bomoi

18 Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango lokola makasa to matiti ya kokawuka ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 21:18
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Olingi kaka kotungisa lokasa oyo mopepe ezali komema ? Olingi kaka kolandela lititi oyo ekawuka ?


Kufa ememaki bango na mbalakata, mpe miboko na bango etiolaki na mpela.


Wuta na ngambo ya este, mopepe makasi ekomema ye, mpe akei libela, ekopikola ye na esika na ye.


Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe ! Bazali lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe epanzaka.


Tika ete bakoma lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ezali kopumbwisa, tango anjelu ya Yawe akotindika bango ;


oyo bazalaki koloba : « Tobotola mabele ya Nzambe ! »


Nzambe na ngai, balola bango lokola matiti oyo mopepe ezali kopumbwisa.


Na monene ya nguya na Yo, obebisi batelemeli na Yo ; na kanda na Yo, otombokeli bango, mpe baziki lokola matiti.


Ndenge mbonge elekaka, ndenge wana mpe moto mabe akozala lisusu te, kasi moto ya sembo akotikala lokola moboko mpo na libela.


Ata bato ya bikolo bazali koganga lokola makelele ya mayi ya bibale minene, bakimaka penza mosika tango Yawe apamelaka bango ; bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, lokola putulu na tango ya mopepe makasi.


Bongo ebele ya banguna na yo bakokoma lokola putulu, mpe ebele ya banyokoli na yo bakokoma lokola matiti ekawuka oyo ezali kopumbwa na mopepe ; ekosalema bongo na pwasa.


Tango nanu batiami kutu na mabele te, nanu balonami kutu te, mobimbi na bango ezwi nanu ata misisa te, afuli bango lokola mopepe mpe bakawuki, bongo mopepe makasi ememi bango lokola matiti ya kokawuka.


Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, ndenge wana mpe misisa na bango ekopola mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.


« Nakopanza bino lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ya esobe ememaka.


Mpo na yango, bakozala lokola lipata ya tongo, lokola londende ya tongo oyo elimwaka, lokola lititi oyo mopepe ememaka mosika na esika oyo batutelaka ble, mpe lokola molinga oyo ebimaka na lidusu.


Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube, lokola bato oyo balangwe masanga ya vino ; bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka.


Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi ; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki ; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.


Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. »


Nzokande, soki moto asaleli wolo to palata to mabanga ya talo to mabaya to makasa to mpe matiti mpo na kotonga na likolo ya moboko yango,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ