10 Bangombe na bango ya mibali elembaka te kobotisa, bangombe na bango ya basi ebotaka kaka mpe esopaka zemi te.
Lokola kati na etonga ya bameme, bazali kotika bana na bango : bamoko kokima-kima, mpe bamosusu kosakana.
Bandako na bango ebatelami mpe ezangi kobanga, fimbu na Nzambe ezali likolo na bango te.
Na mboka na bino, ekozala na mwasi moko te oyo akosopa zemi to akozanga kobota. Nakobakisela bino mikolo ebele na bomoi na bino.
Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso.
Yawe akotondisa bino na bozwi ebele : mabota, bibwele, milona kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino.