Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 20:7 - Mokanda na Bomoi

7 akobebisama libela lokola nyei na ye, mpe bato oyo bakomona ye bakoloba : ‹ Azali wapi ? ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 20:7
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, nakoyeisa pasi na ndako ya Jeroboami, nakosilisa koboma mibali nyonso kati na ndako ya Jeroboami, ezala mowumbu to monsomi kati na Isalaele ; nakokomba ndako ya Jeroboami ndenge bakombaka matiti ya mbindo, kino nyonso penza ekosila.


Ebembe ya Jezabeli ekozala lokola nyei kati na bilanga ya Jizireyeli mpo ete moto moko te akoka lisusu koloba : Tala Jezabeli ! › »


Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te.


Nzokande, soki moto akufi, boni, akoki lisusu kozala na bomoi ? Nakozela kino lolenge na ngai ebongwana.


Olongaka ye mbala moko, mpe akendaka na ye ; obebisaka elongi na ye mpe obenganaka ye.


bolobaka : ‹ Wapi ndako ya mozwi ? Wapi bandako oyo bato mabe bazalaki kovanda ? ›


Akokufa na bozwi, kasi akosala na yango eloko moko te ; tango akofungola miso, bozwi na ye nyonso ekozala lisusu te.


Kobanda na tongo kino na pokwa, bakataka-kataka bango na biteni ; bakufaka mpo na libela, mpe moto ata moko te alandelaka likambo na bango ;


Akozonga lisusu te na ndako na ye, mpe ndako na ye ekoyeba ye lisusu te.


kasi soki bapikoli nzete yango na esika na yango, esika yango ewanganaka nzete mpe elobaka : ‹ Natikala komona yo te ! ›


Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.


Nalobaki : « Oh Yawe, yokela ngai mawa ; bikisa ngai na bokono, pamba te nasalaki masumu epai na Yo. »


Sala bango ndenge osalaki Madiani, ndenge osalaki Sisera mpe Yabini, kuna na mayi ya Kishoni.


Ata oluki bayini na yo, okomona bango te ; bato oyo bazali kobundisa yo bakokoma biloko pamba.


Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.


Ata soki omati likolo makasi lokola mpongo mpe otongi zala na yo kati na minzoto, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ