Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Yobo 20:22 - Mokanda na Bomoi

22 Wana azali kati na bomengo, pasi ekokomela ye, kilo nyonso ya pasi ekokweyela ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Yobo 20:22
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe atindaki mampinga ya bato ya Chalide, ya Siri, ya Moabi mpe ya Amoni mpo na kobundisa ye. Yawe atindaki bango mpo na kobebisa Yuda kolanda liloba oyo Yawe asakolaki na nzela ya basali na Ye, basakoli.


bongo bato ya Saba bayei kokweyela yango mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »


Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! »


akotikala kokoma mozwi te, pamba te bozwi na ye ekowumela te, bomengo na ye ekopanzana te kati na mokili mobimba ;


Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.


Makasi ya matambe na ye esilaka, makanisi na ye moko ekweyisaka ye.


Wana azali kotondisa libumu na ye, Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye, mpe ekonokela ye lokola bilei.


Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato, bato oyo balembi bazwaka bopemi,


Tika ete moto oyo azali na nzala asilisa mbuma ya elanga na ye, akamata yango kino kati na basende ; mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye ! ›


Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.


Natindi ye mpo ete atelemela ekolo oyo eyebi Yawe te mpe bato oyo bapesaka Ngai kanda, mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bango mpe anyata bango lokola potopoto ya balabala.


Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ